Psalms 72

Libondeli mpo na mokonzi

Nzembo ya Salomo.


1 Pesa mokonzi boyengebene na yo, Nzambe,
epai ya mwana ya mokonzi bosembo na yo !

2 Akosambisa bato na yo na bosembo nyonso,
mpe bato na yo ya pasi
na boyengebene.

3 Bangomba ya minene ekomemela bato bolamu,
oyo ya mike bambuma ya bosembo.

4 Akolobela bato ya pasi
oyo bazali na kati na bato ;
mpe akobikisa bana ya mokeleli ;
akopanza moto oyo anyokolaka bato.

5 Akokanga motema tango nyonso oyo moi ekozala,
tango nyonso oyo sanza ekozala,
mikolo nyonso oyo moi mpe sanza ekozala na mabota nyonso.

6 Akozala lokola mbula oyo enokaka
na bilanga oyo balongola matiti ;
akozala lokola mwa mbula ya mike-mike
oyo epolisaka mokili.

7 Na mikolo na ye,
bato na sembo bakozala na bomoi ya malamu penza ;
bolamu ekozala ya mingi penza
kino sanza ekongenga lisusu te.

8 Akozala na bokonzi longwa na ebale oyo
kino ebale mosusu,
mpe longwa na ebale kino na basuka ya mokili.

9 Mabota ya esobe
bakofukama liboso na ye ;
mpe banguna na ye bakolembola putulu.

10 Bakonzi ya Tarsis na oyo ya bisanga ya mosika
bakomema mpaku epai na ye ;
bakonzi ya Sheba mpe ya Seba
bakopesa ye makabo.

11 Bakonzi nyonso bakofukama liboso na ye ;
mpe bikolo nyonso ekosalela ye.

12 Pamba te, akokangola mokeleli oyo azali koganga,
moto ya pasi oyo azangi moto ya kosalisa.

13 Akoyokela mawa moto oyo azangi makasi mpe mokeleli ;
mpe akobikisa bato bakelela wuta na liwa.

14 Akokangola bango na minyoko mpe mobulu ;
pamba te, makila na bango
ezali na motuya mingi na miso na ye.

15 Tika ete azala na bomoi ya molayi !
Tika ete bapesa ye wolo ya sheba ;
Tika bato babondela mpo na ye tango nyonso,
mpe bapambola ye mokolo mobimba.

16 Tika ete mbuma etonda na mokili
kino na basonge ya bangomba ;
Tika ete bambuma na yango ebima malamu
lokola Liban ;
Tika ete yango ezala malamu
lokola matiti ya elanga.

17 Tika kombo na ye ekowumela libela na libela,
tika ekowumela kino moi ekozala ;
bikolo ekopambolama na nzela na ye ;
mpe bakobenga ye
moto apambolama.

18 Masanzoli ezala epai ya Yawe Nzambe,
Nzambe ya Isayele ;
ye moko kaka moto asalaka misala ya kokamwa.

19 Masanzoli ezala epai ya kombo na ye ya nkembo
libela na libela ;
tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na ye !
Amen mpe Amen !
20Oyo ezali suka ya mabondeli ya David mwana ya Yese.
Copyright information for LinMNB